Thursday, April 9, 2015

TBT:.... YA JEAN BY MADILU SYSTEM na lyrics zake



Moja ya nyimbo za kilingala nilizopata kuzipenda saaana
Wimbo huu unanikumbusha safari ya Mwanza to Dar via Kenya kwa basi la Scandinavia
yaani nahisi kulengwa na machozi kwa kweli
Nakumbuka mbaali sana.... mengi mno!
Kweli maisha safari!!

Manu Lima, ko tumbola ngai te.
Ah! Elekaka na yango eh.
Le Grand Ninja.

Ah ngai oh, ngai oh, ngai oh.
Ah ngai og, ngai oh, mawa.

Ah ngai oh, ngai oh, ngai oh.
Ah ngai og, ngai oh, mawa.

Ya Jean aboyi nga tina te oh.
Na sengi ye palado.
Nazangi soutient na vie na ngai oh.
Po a bundela ngai.

Mobali aboyi nga na se ya ndoto.
Aloti na zweli ye mbanda.
Na tongo alamuki au lieu atuna nga.
Akamati decision.

Instrumental
An ngai oh, ngai oh, ngai oh.
Ah ngai og, ngai oh, mawa.

An ngai oh, ngai oh, ngai oh.
Ah ngai og, ngai oh, mawa.

Ya Jean aboyi nga tina te oh.
Na sengi ye palado.


Nazangi soutient na vie na ngai.
Po a bundela nga.

Mobali aboyi nga na se ya ndoto.
Aloti na zweli ye Mbanda.
Na tongo alamuki au lieu atuna nga.
Akamati decision.

Mobali na ngai, ba boyaka moninga boye di!
Est-ce que au reflechir.
Mais ngai eh.
Moyen na boya yo eya te.

Ata tokei na tribunal.
Nako yebisa obe juge wana,
Moyen na boya yo eya te.
Na lula yo fort.

Bato baye ko tuna nga likambo
Nazali se ko lela-lela.
Mawa eh
Nazangi likambo ya ko yebisa bango
Po somo elekaki ngai eh.

Ba tunaka biso bato ya makila mabe eh.
To sala nini eh.
Ba lingaka to pema te oh.

Na fandaka loboko na litama.
Na ko mi tunaka.
Mawa.
Eza makambo eh.

Liwa ya kala ezalaki eloko ya mawa.
Lelo ekoma liseki.
Esika ya ba rendez-vous.
Esika mabala esalamaka.
Esika ya matongi eh.
Mawa.

Oza liboma eh.
Ah! Ya Jean.
Ba lingaka moto ndenge nini, papa.
Nga moto, na koma mwaye na benga yo papa na to cherie.
Na kokaka te.
Na koma ko benga yo Ya Jean.
Na mi tia na kati ya famille na yo.
Na mikotisa.
Ya Jean. Ya Za.
Ko silikaka boye te eh.

Ye
Eh eh eh eh
Bobebi na bino di.

Yeeeeeeeeeeeeeeee.
Na yemba na Luambo Makiadi Franco.
Ayembisaki nga Makambo Ezali Minene.
Nayemba na Poet Lutumba Simaro
Ayembisaka ngai Melesi Ba Pesaka Na Mbwa, eh.

Te, Grand Maitre, Franco.
Biso ba petit na yo tozali.
Tokoki ko bosana yo te.
Vraiment.

Instrumental.
Na vandaka loboko na litama.
Na ko mi tunaka.
Mawa.

Ah ngai oh, ngai oh, mawa.
Ah ngai og, ngai oh, mawa.
Ah ngai og, ngai oh, mawa.

Ya Jean aboyi nga tina te oh.
Na sengi yo palado.
Nazangi soutient na vie na nga.
Po a bundela ngai oh.

Mobali aboyi nga na se ya ndoto.
Aloti na zweli ye mbanda.
Na tongo alamuki au lieu atuna nga.
Akamati decision.

Mawa eh.
Likambo yango.
Probleme eleki nga moto.
Moyen na loba yango na bato eya te.

Vraiment eh.
Ata ba fingaka moto.
Moyen eya te.
Ba fingaka moto boye di.

Ya Bopol, est-ce que ba fingaka moto boye.
Obima na tongo na ndako.
Tango ozo zonga na pokwa,
Okuta obe probleme.
Ah! na lembi eh!

Yeeeeeeeeeeeeeeee.
Na yemba na Luambo Makiadi Franco.
Ayembisaki nga Makambo Ezali Minene.
Nayemba na Poet Lutumba Simaro
Ayembisaka ngai Melesi Ba Pesaka Na Mbwa.


No comments:

Post a Comment



Snowfall Widget for Blogger


Snowfall Widget for Blogger